tokolanda makanisi ya masanga ma politiki Udps pe Fcc o kati ya sango eye po ya matali lisikulu ya mokonzi wa ekolo o likita linene ya Onu na New York..
Awa na Kinshasa lisanga Cogep eye ekolandelaka boyangeli bolamu ya misala mya l’etat esengi na mbula matari kobimisa polele boyokani o matali misala ya makele kati na ba copagnie ya ekolo Congo Demokratiki Sakima na ya ekolo Rwanda Dither ….
O Ituri mituka leka mokama mikangemi na nzela Bunia -Mahagi po ya bobebi ya nzela , tala ntina bakumbi mituka basengi na mbula kopesa mitindo po ya kobongisa ba nzela o eleko eye ya bofandisami ya mampinga kuna ..
/sites/default/files/2021-09/23092021-p-l-journallingalamatin-web.mp3