Journal Lingala soir

  • KINSHASA : Mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi akutanaki lelo na Kigali na bayi mimbongo ba ekolo na bisi asengi bazala kitala tala ya ekolo.
  • LUBUMBASHI : Engumba Klwezi o etuka ya lwalaba ezali na molili uta mikolo misato po metre koto mibale kama mibale na tuku mitano ya lotiki eyibami
  • GOMA  : Mokambi wa assemblée provincial atomboli mongongo nzambi ya kozanga makoki ya kofuta basali o ndako ya boyangeli bwa etuka 
  • KISANGANI: Na engumba Dungu lelo misala misalemi te, bayi mboka bazali kotelemela manaka ya kolinga kobafandisa esika moko na babokoli bibwele ba MBORORO
  • BUKAVU: Ba barriere nionso ezali o nzela ya Fizi esengeli kolongwa na bosenga bwa societe civil ya kuna ba FARDC bazali kotia yango na misala/sites/default/files/2019-03/web_260319-a-p-l-journallingalasoir.mp3
  • KINSHASA : Bokutani bwa kobakisa mayele  na makoki ma baye bakolandelaka makoki ma moto, bokosala mikolo misato na bokambemi bwa Monusco