Journal Lingala soir

  • LUBUMBASHI : Mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi asili kokoma na Lubumbashi ,mboka mokonzi ya etuka Katanga 
  • LUBUMBASHI : Bokutani bwa mosala bosalemaki an bayi 22eme region militaire  po na kosukisa kozanga bokengi
  • BENI : Ba dongolo misu ba ADF bakotaki na mboka Kyanimbe babomi bato motoba mpe bamemi bayike na bisika biyebani te
  • KINSHASA : Se po na mobomano mosalemaki na Beni moponami na etando ya Beni territoire  Baliesema  atomboli mongongo po na koteleme yango asengi na bakonzi basala manso po na bokengi
  • KINSHASA : Engumba mokonzi Kinshasa esili kozua moyangeli wa sika bayi mboka bazali kozela nini epayi naye ? basengi nanu azongisa bopeto pe asilisa likambo lia ba Kulunas
  • GOMA : Mokangemi Tscheka andimi po na mbala ya yambo uta babanda kosambisa ye ete mobomano mosalemaki solo na mobu koto mibale na zomi  na Luvungi/sites/default/files/2019-04/web_120419-a-p-l-journalingalasoir.mp3