Journal Lingala soir

  • KINSHASA: Union Europeenne  elolngoli mikano ekamataki po anLambert Mende na yoko mokambi misala mia bokengi na presidence ya republique/sites/default/files/2019-12/09122019-a-l-journallingalasoir-00.mp3
  • KINSHASA: ba ong ya  ekobundisaka kanyaka esengi na mokonzi wa ekolo, astia na misala elaka apesaki ya kokangisa banso bazali kosalela kanyaka
  • BENI: Banguna ya kimia na ba territoire ya Beni mope lubero bakolonga bango na bokasi bwa bayi ekolo pe mapinga ma RDC
  • KALEMIE: Baraza ya etuka Tanganika esangisaka ba kabila nionso ezuami na tanganika esengi boyokani kati ya banso mpo na ntombwa mpe kimia na etuka na bango
  • BUKAVU: Yoko policier amipesaki liwa sima ya koboma mokumbi tuku tuku , manso mawutaki na bowelani misolo kati na bango ba policiers
  • MATADI: Milona ya lolenge na lolenge esili jkobebisama na mvula ewuti kobeta na poso eleki o territoire ya Mbanza ngungu  ekotuka Kongo Centrale
  • GOMA: campagne po na kobundisa bokono bwa ebola na mangwele ya mibale esili kobanda, milulu misalemaki lobi loleki na Rwanda kati ya bakonzi ba ekolo RDC na baye ba Rwanda