Journal Lingala soir

  • KINSHASA: Mokonzi wa ekolo atielelo awa na kinshasa libanga po na kobandisa botongisi esika ekozala usine ya koopetola mayi, Usine wana ekosila sima ya mibu misato
  • KINSHASA: Mokambi wa lisanga lia masanga Lamuka alaki kokende kolekisa nteke ya Noel na ba ndeko bazuami na Est mingi na Beni
  • BENI: Mapinga ma ekolo na nzela ya molobeli na yango na Est atalisaki epayi ya ba panzi sango ba AFD tuku misato na sambo maye bakobomaka mpe koniokolo bato
  • MATADI : Moyangeli engumba matadi ayebisi na batambusui mituka batambola ndenge balingi kasi mobulu te nzambi PCR ezali se kosinzila na mosala mwa yango
  • KALEMIE:  ministre o etuka atali mambi ya botongi akendeki kolendisa bayi kongolo ete bazali kotongela bango gbagba Lualaba ekosunga bango kosala mibembo o ngambo yoko mpe mosusu 
  • BUTEMBO : bayi mboka bayike bazali kokengde na bana na bango kosomba bilamba kasi bateki balobi ete baye bakotekaka na maboko bazali kokangela bango nzela
  • KINSHASA: Likambo ya bosoto na engumba kinshasa, bayi mboka babeleli nzambi na bisika biyike Kin bopeto ezali kosimba te, lokola na victoire, kitambo magasi, bandalungwa pe misusu/sites/default/files/2019-12/23122019-a-l-journallingalasoir-00.mp3