Journal Lingala soir

  • KINSHASA: kimia esilaki kozonga uta sima ya zanga na etando ya commune ya lingwala mingi na camp lufungula epayi wapi yoko police abomaki  baninga naye mibale
  • BENI: chef wa bureau ya Monusco akutanaki na bamonisi ya bakambi ya politique , basololaki o matali kimia na etando ya Beni
  • BENI: Lisanga lia basi na kombo OGOL ebwaki mbela na bakonzi basala manso po na kobatela bilenge basi baye bakima bitumba na bitendo ya beni babombama na mabota eyamba bango na Beni
  • GOMA: societe civil ya Masisi esepeli po mokambi wa babundi ba Nyatura  akendeki komitika epayi ya ba FARDC mokolo ya misala mibale ya poso tozali 
  • BUNIA: uta mikolo zomi na sambo moto moko te azuami lisusu na bokono bwa Ebola na etando ya kolongonu ya nzoto  ya Biakato 
  • BENI : bato baneyi banso bayi libota moko bazuami na bokono bwa Ebola  Butembo bawutaki na etando ya kolongonu ya nzoto ya kaluguta
  • Mimekano po na kiozua bato basika na mosala na GDDA ebandaki sima ya zanga ya lelo  na bisila nionso bibongisamaki lokola na ISP Gombe,pe na college Boboto/sites/default/files/2019-12/26122019-a-l-journallingalasoir-00.mp3