Journal Lingala soir

  • KINSHASA: Bayekoli ba eteyelo ya likolo batombokakaki na tongo ya lelo batelemeli misolo bakateli bango ya kofuta po na mobu moye
  • KINSHASA: Ministre wa ESU ezali kolendisa motango mwa misolo epesaki na kofuta na biteyelo bia likolo bia l'Etat mpe biye ba ba privé
  • MATADI: bafandi na Kimpesa o etuka kongo Central batambolaki lelo na tongo o b a bala bala po na kotelemela kozanga bokengi ezali kongala na etando wana
  • BUNIA: Batomboki zomi na motoba babomami misato bakangemi mibimba na bitumba balukaki ba  FARDC na etuka Ituri
  • GOMA: ONU etalisi o kati ya rapport na yango ya mobu moleki ete mapinga ma FARDC makoyokanaka na batomboki basimba mandoki bakopesaka bango bundeli na masasi
  • /sites/default/files/2020-01/_06012020-p-d-journal_lingala_soir.mp3KINSHASA: RDC ebimi ta kama moko tuku sambo na libwa na molongo ya bikolo kama moko tuku mwambe na libwa biye bizali na ntomwa elamu an lobiko lwa bato.