Journal Lingala soir

  • KINSHASA: Yoko pepo ya bayi ekolo sud afrique ezuamaki na Monusco,elingaki kosala likama na libanda ya pepo ya Goma , mapinga ma ekolo sud afrique tuku mitani na libwa babimaki mibimba
  • GOMA:Mokambi misala mia mapinga  o kati ya linaka sokola 2 na nord kivu epesi mitango ya misala misali mapinga ma ekolo ba FARDC na mobu mowuti koleka na yoko ba territoire ya kuna longonia
  • KANANGA:Mapinga madfundami kotungisa bayi mboka na ndemba , lieutenant mokambi misalakuna alobi bazali kosala boluka luki soki ezali solo mapinga wana bakosamba o boso bwa mapinga
  • MBUJI MAYI:Bayi ba mboka mibale bazali kowela etando ya mabele na etuka lomami ba ndako etumbami lokola ndako ya nzambe,centre ya santé na ba ndako ay bayimboka zomi na mibale
  • BENI: moto moko azuami nabokono bwa ebomla mpe akufaki lobi na Beni, babengi na bafandi bayebisa bakami misala na lobangu po moto nionso akozuama na bokono ya Ebola azua lisalisi na tango
    KINSHASA: Mikalo mipesaki ministre wa biteyelo bia likolo na bayekoli po balongwa na campus Universitaire mikoki lelo mpe bayekoli banso basili kolongwa université ekomi lokola bisika bikawuka/sites/default/files/2020-01/09012020-a-l-journallingalasoir-00.mp3