Journal Lingala soir

  • KINSHASA:Bato sambo basili kozuama na bokono bwa coronavirus na mboka mokonzi kinshasa, bakonzi o mamabi m,a kolongonu ma nzoto basengi na bayi mboka basalela mingi bopeto
  • BENI: Moyangeli engumba Beni asengi na bafandi na etando naye,basalela bokebi  ba kotia na misala mabongisami mamnso matali bokebi po ya kobundisa bokono bwa coronavirus
  • GOMA: Mokambi wa lisanga lia ba pharmaciens na Goma asengi na ba pharmacien banso basalela bokebi  soki moto amonani  na bilembo bia coronavirus, batinda ye epayi ya minganga
  • GOMA: Bayi mimbongo ba Goma na RDc  na baye ba giseni na rwanada bazali na mwa komitungisa soki bikolo biye bibale bikokanga ba ndelo ya bikolo, bayi mboka bakonyokwama , biloko bikomata
  • KINSHASA:Bakambi ba lisanga lia societe civil bazali kosenga na bakaonzi ba ekolo basala mamso po na kobatela bayi mboka o boso bwa bayi mboka o boso ya bokono bwa coronavirus
  • KINSHASA:ba ntoma ba bayi ekolo, na ba senateur, batelemisi makita kino mia mitano na sanza ezali koya po na komikebisa na bokono bwa corona virus
  • MBUJI MAYI: Bokono bwa cholera bokomi lisusu na mbuji mayi bato zomi na mineyi bazalaki kobela, moko akufi na etando ya kolongonu ya nzoto ya bozola/sites/default/files/2020-03/18032020-a-l-journallingalasoir18h45-00.mp3