Journal Lingala soir

  • KINSHASA: Mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi amamataki lobi mwa mosala misato mikano po ete bayi mboka b/sites/default/files/2020-03/19032020-a-l-journallingalasoir18h45-00.mp3apalangana bokono ya coronavirus te na etando mobimba ya ekolo
  • KINSHASA: Mokonzi wa ekolo apekisi ba pepo kowuta na bikolo bizali na bokono bikota na ekolo, ata mibembo kowuta na bituka po na baye bazali kinshasa, se ba pepo mpe masuwa ekomema marchandise
  • KINSHASA: Mokonzi wa ekolo asengi na mbula matadi emilengela na lombangu kobakisa ba lopitalo mpe ba pavillon epayi wapi bakobanda koyamba bakoni ba coronavirus
  • KINSHASA: Ministre atali mambi ma kolongonu ya nzoto alendisi bayi mboka basalela mikano kikamatami an bakonzi mpe baye ba mambi ma kolongonu balanda manso mazali kolobama awa na kuna te
  • KINSHASA: Bayi mboka bazui mokano mwa mokonzi wa ekolo na bokebi mpe bayike bandimi kotia yango na bikela
  • KINSHASA: Cenco mpe esepeli na mikano mikamati mokonzi wa ekolo , bandimi ete misa mikosalema te, mpe biteyelo bikokangama
  • KINSHASA:Monusco elendisi ete ekokoba na mosala mwa yango mpe kotia na bikela mokano mokamati bakonzi po na kobundisa bopkono ya coronavirus