Awa na Kinshasa ata ko matungisi ndenge na ndenge , ba episikopo pe eyamba ya Ecc bayebisi te’ babelemi po ya kosunga ekolo na maponami malamu po ya mobu nkoto ibale na tuku mibale na misato mokoya….
Nzoto tuku misato na mitano mibimisami pe bato leka mokama baakomonono te , wana bilembo ya likama esalemaki na ebale na Bumba o etuka Mongala o butu ya mua mosala mibale kotanela mua mosala misato , ntina bwato bikumbaki bato pe biloko ya koleka….
Tokolobela pe manguele ya malaria eye ebimisami na lisanga ekolandelaka bokolongonu bua nzoto o molongo too Oms, awa o Rdc diketele ya muango ekobundisaka bokono bona akumisi likanisi liye abanzi te’ ekokitisa liwa ya bana bake o Africa….
/sites/default/files/2021-10/07102021-p-l-journallingalasoir-web.mp3