Kati na yoko mokanda akomeli mokonzi wa ekolo , Moise Katumbi asengi na Felix Antoine Tshisekedi koboya kondima ,bondimisami ya bakambi ba Ceni eye esalemaki o ndako bontoma, kati na sango eye tokolanda maye abanzi po yango ….
Awa na Kinshasa molandi ya kalaka ya Onu o matali misala ya mampinga akutanaki na ba ntoma ya ba kabila ba Nande pe ba Hutu , o masolo ma bango balobelaki lolenge la koluka kimia mokowumela o etuka ya Nord Kivu…..
Bato leka mitano baweyi o likama ya engunduka eye esalemaki mua mosala moko moleki o etuka ya Lualaba banso baye bazuaki engunduka na bonkutu , bo’ eyebisi diketele ya misala ya Sncc kuna , sika ekomi tango ya koluka kolongola engunduka pe kotika nzela na mosala…
/sites/default/files/2021-10/20102021-p-l-journallingalasoir-web.mp3