Efonguami mua mosala mineyi eye awa na Kinshasa likindo ekosangisa bakambi bikolo pe ba mbula matari ya lisanga ya bikolo Africa po ya kolobela matungisi makosalemaka na basi , se’ po ya kolobela mambi ya bozuami ya basi na makasi tokolanda pe makanisi ya nganga mayele Denis Mukwege o libaku lya bobandisi milulu ya mikolo zomi na motoba ya kobundisa matungisi makosalemaka na basi ……
Na Beni lisanga ya balakisi esengi na bangoi kozongela kelasi , nzoka nde bango babeti sete po ya bosambisami ya moyi mampinga eye akotisaki mobulu kati na engumba……
O etuka ya Kwilu , bana leka nkoto zomi kati na bango kama misato baweyi na bokono boyebani naino te, ministre o matali kolongonu bua nzoto o etuka abuaki mbela na mbula matari ya ekolo po te’ babasunga na lombango …..
/sites/default/files/2021-11/25112021-p-l-journallingalasoir-web.mp3