Awa na Kinshasa , mokonzi wa ekolo apesaki bus mokama po ya bayekoli ba biteelo ya likolo ya ekolo ,molulu mosalemaki mua mosala mibale eye o libanda ya ndako bontoma ,kati na sango eye tokolanda makanisi ya bayekoli ba biteelo ya likolo po yango….
Na Lubumbashi , pitolo eekomonana te , ba station service bikosala misala na londambo , sika bateki pitolo o balabala bamatisi talo ya pitolo pe bakumbi mituka bamatisi talo na bango na mbala ibale too misato ….
Lisusu tokolobela pe bosenga ya masanga tuku mineyi na muambe makobundelaka makoki ma moto po te’ bakonzi banso batengemaki na bobomami ya Floribert Chebeya pe Fidele Bazana basambisama na esambiselo enene ya mampinga ya Kinshasa Gombe….
/sites/default/files/2022-01/18812022-p-l-journallingalasoir-web.mp3