Journal matin

1/New  - York : Bokutani ya mbala tuku sambo na sambo ya ONU ekofongwama mokolo mwa mosala moko moye na  New-York kuna na Etas Unis ya America, bakonzi ba bikolo bakozua maloba kobanda mwa mosala mibale kino mwa mosala moko ya poso ezali koya,

 

2/Bunia : Bakumbi mituka mpe bayi mibembo na nzela ya Bunia-komanda-Luna; bazali koniokwama po na kozela convoi ya ba FARDC ekomema bango na mobembo po na kobanga mobomano mwa masimba mandoki,

 

3/Matadi : Motuka nionso ekomema carburant esengeli kokengelama malamu  na bakambi o etuka Batali mambi ya hydrocarbures o Kongo central, mokano mokamatami na bakonzi o etuka batali mambi ma Hydrocarbure./sites/default/files/2022-09/19092022_-p-a-d-journallingalamatin-00.mp3