Tokokoba na kolobela maye maakoleka na etuka Nord Kivu , o tongo ya lelo masasi makasi mabetamaki lisusu na Kahunga pe Mabenga po ya bayike ba Fardc nde bazalaki kobundisa batomboki ,nzoka nde basusu bayebisi te’ na Bunagana batomboki baakokembisa misala mya bango …..
Bozangi bokengi pe bookokoba na etuka ya Kwilu, mboka Mayala eye ezuami na mondelo na commune ya Maluku awa na Kinshasa ebundisamki, bato sambo baweyi pe ndako mzike bitumbami ,sango epesami na mondele mboka….
O Ituri , bayi mboka ya chefferie ya Walese Vonkutu na nzela Komanda-Luna babandi kozonga o ba mboka ba bango engebene na mua kimia eye emonisami kuna sika...
/sites/default/files/2022-11/11112022-p-l-journallingalasoir-web.mp3