Na Sud Kivu ebandisamaki uto lobi loleki milulu ya bobeti ntagba po te’ bana banso bakende o kelasi , lolenge moko pe na Kananga , muango moye mozui lisungi ya Unicef ekani kokomisa bana millioni misato o ba kelasi….
Tokolobela pe lobiko la bato na Irumu , Djugu pe Mahagi o etuka Ituri ,wapi mabota leka ba nkoto zomi bakimi mboka ba bango po ya bitumba ya batomboki , bakambi kuna babasengi kokitisa mitema….
O etuka Mai Ndombe biloko bimati talo na engumba Inongo , sima ya yoko bokutani na bayi mimbongo pe misala ya nkita o engumba , moyangeli na yango alaki te’ kino mua mosala moko mokya talo ya biloko bikokita..
/sites/default/files/2021-10/08102021-p-l-journallingalasoir-web.mp3