Tokolobela bokutani ya Mokonzi wa ekolo Felix Tshisekedi na mokonzi wa ekolo Rwanda Paul Kagame mua mosala misato eye na Luanda o ekolo Angola . ekolo Rdc eekofunda ekolo Rwanda na bopesi lisungi na batomboki ba M23 baye bazongeli lisusu bitumba o monyele ya ekolo Rdc , likambo liye ekolo Rwanda eekoyangana , na boye mokonzi wa ekolo Angola nde akokamba masolo kati na bikolo biye bibale….
Na kasai Orientale ebandisamaki pe uto mua mosala mibale misala ya kobongisa pe boteteli ya nzela na ba km tuku misato na mitano na engumba Mbuji Mayi , milulu mkiye misalemaki o boso ya ntoma ya mokonzi wa ekolo ministre o matali libenga ya ekolo Nicolas Kazadi….
Na Nord Kivu , na mokolo ya mibale pe ya suka ya mimekano ya suka ya kelasi ya ntey too Enafep , manso malekaki malamu o etuka ya malakisi ya Nord-Kivu III, nzoka nde bakambi biteelo baakobanga te’ motango ya bayekoli mokita po ya bozangi bokengi …
/sites/default/files/2022-07/06072022-p-l-journallingalasoir-web.mp3