Journal Soir

1/BANDUNDU: Molandi wa premier minister pe minister atali mami ma kati ya ekolo nab iso Aselo asalaki mobembo mwa mikolo misato na territoire ya Kwamouth o etuka mayi ndiombe elongo na moyangeli etuka meyi, , kuna bakamataki mikano po na kosukisa kozanga boyokani bozali kongala kati ya ba Teka na Ba Yaka;

 

2/ KALEMIE: Na etando ya kolongonu ya nzoto ya moba bato kama sambo zomi na mineyi,bazali kobela bokono ya pulupulu ya makila kati na bango zomi na mineyi basili kokufa;

 

3/MBUJI MAYI : Basali bilanga  nkama mitano ba zuami  na territoire ya Miabi bazui bisaleli ya bilenga po  babundisa nzala ezali  kongala na etando wana epayi wapi bayike basalaka se misala mia kotimola diamant/sites/default/files/2022-08/300822-p-a-d-journallingalasoir-00.mp3