Awa na Kinshasa yoko likindo lifonguamaki lobi loleki po ya koluka lolenge la kofuta bayi makama ya bozuami na makasi kati na ekolo , likindo liye elengelami na Fondation Denise Nyakeru Tshisekedi ekani kozua meko mikotiama o bikela na lombango
Kati na yoko mokanda akomeli mokonzi wa ekolo , Moise Katumbi asengi na Felix Antoine Tshisekedi koboya kondima ,bondimisami ya bakambi ba Ceni eye esalemaki o ndako bontoma, kati na sango eye tokolanda maye abanzi po yango ….
Na Butembo ba Mai mai babundisaki bisika mibale ya bayi mampinga ma ekolo ,na bilembo ata moto moko aweyi te ...
/sites/default/files/2021-10/21102021-p-l-journallingalamatin-web.mp3