O ekolo Congo Demokratiki , Maponami maselemaki mua mosala misato moleki , wana maloba ma ngay te kasi ya etinda ekolandela maponami ya lisanga ya bikolo Africa , ata ko nkokoso bizalaki pe kopusa tango bango babanzi te’ manso masalemaki na mua kimia….
Na Nord Kivu , uta ntongo ya lelo bitumba Makasi bikosalema kati na batomboki ba M23 na masanga ya basimba mandoki ya etuka na territoire ya Masisi , kolanda na ba nzengeneke kuna bitumba biye bikosalema uto mikolo mibale sikawa….
Awa na Kinshasa ezongisami lisusu po ya mia zomi na ibal e ya sanza ekoya bosambisami ya mopanzi sango Stany Bujakera , mawa pe pasi po ya balobeli ba ye….
/sites/default/files/2023-12/22122023-p-l-journallingalasoir-00web.mp3