Ekoki lelo loye mia zomi na sambo ya sanza wa yambo mibu tuku motoba na misato uto babomaka nkondo Patrice Emery Lumumba ,moto monene oyo akotalisamaka lokola papa wa ekolo , na yango Ekolo mobimba ekokundolaka liwa lye ….
Kati na sango eye tokolanda makanisi ya booko pe basusu o matali bondonguani ya ndembo mikosalema mua mosala misato eye o ekolo Cote d’ivoire kati na ekolo na biso Rdc pe Zambie….
Na engumba Kikwit mokambi misala ya maponami too Ceni atelemisamaki na mosala po ya kanyaka , nzoka nde yoko lisanga ya bayi mboka kuna etomboli mongongo po ya kofunda maye malekaki pe babanzi te’ moto apesaki kanyaka pe asengeli na etumbu ….
/sites/default/files/2024-01/17012024-p-l-journallingala_matin-00web.mp3