Journal lingala soir

Lingomba  collectif des organisations de la société civile de l’Est asengi na bakonzi na Kisasa basala te politique na Kongo esalama na kimia. Bobangi to bokabwani bozala te. Kasi bomoko pe boyokami nde bizala. Jean Chrysostome Kijana moko ya limgomba liye pe moyangeli lingomba Consortium PAMOJA KWA AMANI asengi lisusu ezala leta ya Rdc to ba M23 basolola na sembo po kimia ya solo ezonga na mboka.

Na Kisasa mikolo oyo kotambola na motuka moyen te. Embouteillage Makasi penza koleka. Ndakisa moboti oyo afandaka na Binza meteo. Alongwaki ndako baye na 5h ya tongo po Amema muana na ye na eteyelo naye ezali na Gombe. Kasi tee pene na 10h ezalaki ye kaka na nzela ya kokenda kotika muana na ye yango na eteleyelo. Pe akomaki nano ata na Katikati ya nzela azalaki kokenda te.

Kozua passeport na Rdc eza lisusu pete te. Ekomi mua mokuwa. Boko kazua yango noki noki yambo na poso moko kasi basusu bakokemba ata sanza mibale po bazua yango.

 

 

/sites/default/files/2025-04/25042025-p-l-journallingalasoir-00.mp3web.mp3