Journal lingala matin

Mikolo misato mileki Rdc na Rwanda bayokani kotika bitumba pe kobika na kimia kati na bango mibale. Mboka mibale eye batiaki mikoloto na bango na mokanda pona yango liboso ya mboka etats unis. Pe na ebandela ya sanza ekoya Rdc na Rwanda balaki kobanda kokoma mokanda ekokotisa bango na kimia yango ya solo.

Na Nord kivu. Bitumba bisalamaki na Nyabiondo bibangisaki bato pona bokengi na bango. Mingi penza na mambi ma kelasi. Kutu na Masisi mikolo mileki kelasi esalaki neti kozongela sima bitumba bisalemaki kuna. Kasi kelasi yango ezongi kaka na pasi. Biteyelo nzike bizangi biloko mingi ya mosala neti bikomelo.

Bo toyebi papa Francois moyangeli Eklezia katoliko akufaki poso mobimba yangoyo. Nde bakundaki ye mikolo mibale mileki. Pe nzoto naye ekundami na ndako nzambe katoliko babengi basilique sainte marie majeure. Bakonzi ebele ya molongo bakendaki Vatican kolela ye. Pe Na losambo naye ya suka asalelaki papa Francois mpaka ya ba cardinal banso alobaki te ye Francois asalaki mosala esungaki pe esimbaki molimo pe mitema ya bato.

 

 

/sites/default/files/2025-04/28042025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3