Minister Constant Mutamba akoki kolongwa Rdc te. Moyangeli ndako ya kosambisa basali ya leta nde alobi pe asengi yango na leta. Posa naye ezali ministre eye akenda esika te pe azala kaka na Kongo po basambisa ye ma mafunda bafundi ye.
Eklezia katoliko ekomisaki pona ye lobi Floribert Bwana Chui ndakisa malamu ya kolanda pona moto nioso. Pe cardinal Ambongo abakisaki te Eklezia katoliko pe ekokoba mambi maye manso pona kobundisaka kanyaka to koyiba biloko ya leta.
/sites/default/files/2025-06/17062025-p-l-journallingalamatin-00.mp3web.mp3