Eloko nioso ezalaka na ebandela pe sukana yango. Bongo na oyo etali kelasi bana kelasi ya Rdc lokola pe ebele ya baye ya mikili nzike ya molongo bazongeli lisusu kelasi lelo pona mobu ya sika 2025- 2026. Kasi na Rdc esengo ya kelasi pona mokolo na yango ya yambo ezalaki penza na bituka biso ya ekolo te. Ba sango oyo nde elakisi biso boni boni ezalaki.
Muana mboka General Peter Cirimwami akufa ba sanza ebele mileki. Kasi lelo nde bakundi ye awa na Kisasa. Muana mboka Peter Cirimuami, moyangeli ya Nord Kivu ya kala akufa na bitumba na sanza ya yambo ya mobu tozali. Bongo ata ko akufa naye leta ematisi ye pete lelo. Pe ebele ya bayi monyele ya ekolo basambeli te liwa ya General Cirimwami eyingelisa kimia ya solo kuna.
Nani penza nde akozalaka moyangeli ya solo ya etando Lubumbashi na Etuka Haut Katanga ? Ndako ya leta esambisaka mambi ya mosala ya leta etie lelo na ebonga wana pona tango mama Joyce Tunda. Kasi moyangeli mambi ma nteyi na mbulamatari ya Rdc ye nano andima bongo te. Ngambo mosusu muana mboka Patrcik Kafwimbi yepe akokoba kaka kosala mosala naye pe kaka na pete wana ya moyangeli etando Lubumbashi pona tango.
/sites/default/files/2025-09/01092025-journallingalasoirweb-00.mp3