1. Kinshasa : Ebongisela ya sika « Fleuve Congo Sans Ebola », Ewuti kokelama na mbulamatari ya Congo democratiki. Likanisi lina lizali mpo na kobunda na bokono bwa Ebola o nzela ya mobemba na masuwa o ebale Congo na bonanani nkati ya Kisangani na Kinshasa.
2. O Nordi Kivu… Lobiko lokomi mpasi mpo na bato bakima bitumba Nkati na AFC-M23 na Ba wazalendo o mboka Ufamandu o sudi ya etando Masisi. Lobi bitumba bingala makasi ona etando.
3. O Mbuji mayi, Lisanga DKT International ebongisi mateya mpo na ba pulusu. Mateya matali bongo ndenge ba pulusu basengeli komibibatela na bokono bwa Sida, mpe kosalela Condom soki bayoki mposo ya nzoto.




