1/Bunia : Badongolomiso ADF bati mobulu o mboka mitano na etando ya Mambassa, epayi wapi bato bakufi, basusu baike bazoki. Mpe ndako ya bato ebele itumbami. Epesi mpasi na bai societe civile bakosenga mbulamatari efungola miso na likambo lya ba ADF.
2/Kananga: O Kananga ba clients ya societe ya allo allo bazali kolela ndenge ntalo ya mega emati. Mpe batatoli te connexion ya internet ezo katana mpamba mpamba.
3/ Lualaba.: O etuka Lualaba babandi kobongisa nzela ya engumba Kolwezi. Ezali nzela ya kilometele ntuku sambo na mitano, eye esengeli na societe ELGET kosilisa misala mya bobongisi yango na nkati ya mbula moko.
/sites/default/files/2026-08/27082026-p-l-_jounal_lingala_de_ce_jeudi_soir_ok_-_web_.mp3




