Journal Lingala de ce mardi 08 septembre 2026

1. Kinshasa : O kinshasa, boko bato babiangami basali ya ministere ya transport bakomisi mosala ya leta lokola etumba na boulevard ya 30 juin na balabala isusu inene ya engumba. Bakotelemisaka mituka, ntuku ntuku bo lokola batomboki mpo na ntala mikanda ya mituka to ya ntukuntuku. Mpe bazofutisa batambwisi mituka to ntukutuku misolo miye mikokota te o libenga lya leta.

2. Bunia : Esengo o  etando Mombassa koyamba mpo na mbala ya liboso mokambi wa etuka Ituri. Mposa ya bai etando, ezali te boyei ona etando ya mokambi wa etuka,  esunga kosilisa mpasi na bato o maboko ya badongolomiso ADF, baye bazali koboma, mpe kokimisa mabota.

3.  Goma : Esengeli na bato kosunga baye bazali zinga zinga koyekola kotanga mpe kokoma. Wana ezali mbela ya lisanga Alph UJUVI. Mbela esalemaki o mokolo ebongisama o molongo mobimba mpo kosunga bato koyekola  kokoma mpe kotanga.

/sites/default/files/2026-09/08092026-p-l-journal_lingala_de_ce_mardi_soir_08_septembre_2026-00-_web.mp3