1. Beni : O etando Beni na Nordi Kivu…mbula makasi na mupepe ebebi biloko nzike o cite ya Kyavinyonge. Ndako ya bato na iye ya misala mya leta mpe ibukani. Mabota maike makomi kolala libanda. Banso bakolikya na lisungi ya bakonzi ya ekolo, na bato ya mitema malamu.
2. Goma : O Nordi Kivu, societe civile ya Rutshuru ezali kopalela mpo na mpasi ya kolia biloko, mingi bitabe o mboka nzike ya etando. Mpamba te, bato ya Afc-M23 babunzi bilanga ya bitabe mpo etikela bango esika ya koyekola kobeta monduki.
3. Kindu : Eleki sika mposo misato bozongi bwa kelasi bosalemi. Nkasi bana kelasi ebele ya province educationelle Maniema 1 bazokoka te kobanda kelasi, zambi baboti na bango bazangi makoki mpo na kosombela bana bilamba na biloko bya kelasi.
/sites/default/files/2026-09/17092026-p-l-_journal_lingala_de_ce_jeudi_matin_-00-_web.mp3





