1) Kinshasa : Mokolo eponama na molongo mobimba mpo na kimia, ezalaka O mia ntuku mibale ya Sanza ya libwa. Mokili mobimba mosepeli mokolo mwango O mokolo mwa mosala moko moye. Mpo na mokolo mwango nsete ebetamaki na likambo ya koluka kimia mpo na banso, bisika binso mpe mokolo na mokolo.
2) Kinshasa : Misala ya kobongisa nzela Kananga- Kalamba mikotambola malamu. Ministre ya atali misala bya botongi nzela mpe misala minene ya leta moto atalisi yango uta akendaki O etuka Kasai central mpo na mobembo ya mosala.
3) Kinshasa : O Kisasa nzete na esika ya mwa zamba mpo na kozwa mopepe izali lisusu te. O bisika byango ndako inene ibotami lokola mayebo. Yango ezali malamu te mpo na environnement.
/sites/default/files/2026-09/22092026-p-l-_journal_lingala_de_ce_mardi_matin_-00-_web.mp3





