Robert Matalatala, mokambi ya Commission Nationale ya Prevention Routiere

Mwana mboka Robert Matalatala, mokambi ya Commission Nationale ya Prevention Routiere, CNPR na bokuse, azali koyebisa nini mokumbi motuka asengeli kosala soki motuka na ye ekufi o nzela. Apesi malako ma ye sima ya ba accidents mibale esalemaki o butu ya mua lomingo eleki po tokota o mua yambo, 3 octobre, na ba commune ya Kintambo pe ya Ngaba, o engumba Kinshasa. Mituka ekotaki o se ya ba camions ya minene ekufaki o nzela.

 

Robert Matalatala, mokambi ya CNPR akolobela pe bilembo bya nzela lokola marquage au sol, to bilembo bitiama likolo ya goudron ya nzela pe ba feux de signalisation, to muinda ya nzela eye epeseka ndingisa na bakumbi pe bato ya makolo po na botamboli o nzela. Tolanda ye na lisolo na Babel Mpongo

/sites/default/files/2022-10/051022-p-l-kinshasainvitepresidentcnprrobertmatalatala_web-00.mp3