DV Lottery: Clemence Bayimbe, mosali ya consulat azali kolimbola

Clémence Bayimpe,  azali mosali na consulat ya ekolo Etats Unis awa na RDC, azali kolobela biso likambo litali jeu ya DV Lottery eye ezali kobenda batu ebele pamba' te ezali libaku ekolo Etats Unis epesa na bayi bikolo binso ya molongo  kokende kofanda epayi na bango. Po na mbala eye, maman Clémence Bayimpe alobi été administration ya Etats Unis elongoli mobeko ya kopesa ndingisa kaka na batu bazali na passeport kobeta DV, lokola esalamaki na mibu eleki. Lelo ata mutu azali na passeport te akoki kobeta.

 

Bolanda Clémence Bayimpe  ya consul ya Etats Unis na elobeli ya Blaise Shindani Kambala

/sites/default/files/2022-10/1110022-invite_bon-00-site.mp3