: Dr Charles Omesumbu asengi na bato bamonaka munganga po na ko batela miso na bango

Coordonnateur provincial ya programme national de la santé oculaire na etuka ya Maniema , Dr Charles Omesumbu asengi tobatela misu na biso. 

Pona kobatela misu na biso esengeli tomonaka monganga ya misu mbala mibale na mbula moko. Yango conseil ya Dr oyo azali pe médecin directeur ya centre des soins oculaires ya 5è CELPA na engumba ya Kindu na etuka ya Maniema. Yango ekosunga koyeba soki maladie ya misu ezali to te. Pe koyeba kolandela yango na ebandeli.

Tolanda lisolo na ye na Florence KIZA LUNGA wuta Kindu.

/sites/default/files/2023-10/241023-p-l-kinduinvitedr_charlesomesumbaweb-00.mp3