Jacques Sambeya : Tolingi bakisi ya glaucome ekoma ofele, pe l’Etat asala dépistage na yango pona kobatela population

Jacques Sambeya, mokambi ya lisanga « Cri ya Bartimée », a talisi ete ezali malamu mingi bakisi ya glaucome ekoma ofele, pe l’Etat asala dépistage na yango pona kobatela population.

Ye apesi makanisi na ye natina ya semaine ya sensibilisation ya bokono ya misu ebengami glaucome. Yango ekosila mokolo ya poso le 16 mars. 

Mokambi ya lisanga "Cri ya Bartimée" ezali lisanga oyo esangisi bato bazali kobunda pona batu miso ezua makama.

Jacques Sambeya ayambami na masolo epayi ya Babel Mpongo Masimango :/sites/default/files/2024-03/140324-p-linvite_jacques_sambeya_3_web.mp3