"Regideso azali na bosenga ya 10 milliard de dollars pona kopesa mayi na 75% ya population" (DG David Tshilumba)

Directeur général ya Regideso, David Tshilumba a sakoli na mokolo ya lundi, ete azali na bosenga ya 10 milliard de dollars americain pona kopesa mayi na 75 % ya population na ekolo Congo.

Na oyo etali ba pistes de solution pona oyo etali pasi ya mayi, ye alobi ete esengeli ko diversifier ba activités ya Regideso, pe remplacer ba tuyaux nionso eza ya kobeba.

Pona oyo etali ko bongisa mosala, DG David Tshilumba asengi na batu nionso na mboka batia maboko.

David Tshilumba a limboli na molayi na masolo na Donat Madimba :/sites/default/files/2024-03/invite_david_tshilumba_dg_regideso-00web.mp3