"Maponomi makosalema lolenge nini ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

27è Leçon Chronique élection de la semaine du 12 au 16 Décembre 2005

rn”Maponomi makosalema lolenge nini ? ”

*Yambo esengeli koyeba ete kopona esengeli kosalema na moto ye moko, akoki kotinda moto mosusu mpo apona na esika naye te.. Mpo ya koyeba lolenge ekosalema maponomi , ezali pete. Okomi na bureau ya vote, na ekuke olakisi carte nayo na baye basengeli kotala soki kombo nayo ezuami na lokasa to liste ya baye basengeli kopona o bureau wana. Sima na yango, bakopesa yo kasa mosusu babengi bulletin ya vote. Sima na wana okokota na esika eye ebongisami okozala yo moko okopona eye yo olingi mpe moto moko te akoyeba nini yo oponi.Na esika okozala yo moko babengi isoloir, kuna okotia elembo ya mosapi mwa yo na esika ezali na loboko ya mobali na esika bakomi OUI to iyo,To mpe . Soki osilisi, osengeli kongumba lokasa lwa yo to bulletin ya vote, na kobomba malamu mpo moto amona te eye yo oponi.Obimi na isoloir, opusani pene na sanduku to caise ebongisami mpe otie lokasa lwa yo na miso mia ba nzeneneke .

* Sima ya kopona tokoki koyeba nini ekosalema?

* Iyo ! sima ya maponomi ekokoma tango ya kotanga ba nkasa mpo ya kopesa eyano ya maponomi.Maponomi makosalema o boso bwa ba nzeneneke ba molongo mpe bayi ekolo, bakisa mpe baponi batano baponami na basali o bureau ya vote mpo bazala ba nzeneneke ya botangi ba kasa mpo ya koyeba biyano.

* Bana ya Rdc bayike balingi koyeba lolenge nini ekosalema botangi bwa biyano sima ya maponomi?

*Epemi ndingisa na mokambi wa bureau ya vote kofongola sanduku to caise babengi Urne o miso mia ba nzeneneke, ba nongi mpe basali ba bureau ena.akobanda kozua kasa yoko yoko akopesa epayi ya yoko mosali,ona akokabola yango kolandana na biyano, soki ezali OUI to NOM to mpe NULS.Na tango wana, basali basusu ba bureau ena ya vote, bango bazali kokoma motango mwa kasa ena.
Na suka ya manso mokambi wa bureau akokoma kolandana na lolenge ekosenge CEI,mpo ya koyebisa lolenge maponomi masalemi rapport to proces verbal ekotiama mokoloto na basali banso ba bureau mpe ba nzeneneke. Kasa yoko ya rappport to procès-verbal ena bakopesa yango na ba nzeneneke soki basengeli yango.

* Olobaki wana ete ezali na nkasa to bulletin mosusu bakokoma likolo na yango Nul elingi koloba ezali na ntina te. Tolingi koyeba tango nini, bulletin ya vote ekoki kokoma nul to kozanga tina ?

*Solo ezali na bulletins mosusu eye ezali kolanda lolenge ekosenga C.E.I,te.Ndakisa bulletin eye etiami mokoloto te na mokambi wa bureau ya vote, nkasa to bulletins eye ebebisami na bosoto ndakisa moto atie elembo na esika ya iyo, zoka alingaki kopona Te, ekomi lokola aponi iyo na te, na tango wana bulletins ekomi OUI na NON,wana ekomi na ntina te bakokokoma nul, soki mpe nkasa to bulletin epasuki ezali lisusu na ntina te, wana mpe ezali Nul lolenge moko mpe soki moto aponi esika yoko sima na yango atie bosoto na kasa.

* Mpo ya kosukisa ,kotanga ba kasa sima ya kopona mpo ya kopesa biyano ekosala mikolo boni ?

* Ngonga epesami mpo ya kotanga ba nkasa ezali ya mokolo moko kolandana na lolenge mosala mokosalema na ba bureau ya vote ekeseni. Manso mabongisami mpo ete ngonga etosama. Balandi bosengeli koyeba ete Radio Radio Okapi ekozala na mosala mpo ya kopesa bino biyano bia sima ya motuna mwa kopona mibeko likonzi.

Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : (00243)998909787rnE-mail : [email protected] [email protected] de Micheline TshwalarnJournaliste, Presentatrice, TraductricernTel : +243 09 98186793rnRadio Okapi Kinshasa.