" Ntina ya parlement ezali nini ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Ntina ya parlement ezali nini?”

* ntina ya parlement o nteyi ya mbula matadi ezali ya kokoma mibeko ,mikano mpe miango, ekosunga etamboli elamu ya misala minso mia mbula matadi o nteyi ya ekolo kolandana na mobeko mwa kama yoko mwa mibeko mikokamaba République Démocratique du Congo, mozali koloba te : Parlement ekopona mibeko, ekolandela maye mbula matadi azali kosala,maye misala minso mia mbula matadi to ba entreprises publiques , ba établissements mpe ba services publics ezali kosala.
O nteyi ya ekolo na biso parlement ekabwana na biteni bibale : eteni yoko babengi yango chambre basse yango nde Assemblée nationale eteni esusu babengi yango chambre haute yango nde Sénat. Eteni yoko yoko ekosala mosala mwa yango na bonsomi.Bayi Assemblée nationale nde babiangami na kombo ya ba députés nationaux, nzoka nde bayi Sénat nde bazui kombo ya ba Sénateurs.

” Lolenge nini ekopesama ba kombo to ba candidatures ya baye bakozala o parlement ?”

* Baye balingi koponama o parlement ba candidatures ya bango o maponomi ekopema na masanga ma politiques .
Baye tobengi ba deputé ba ekolo to ba députés nationaux bazali baye bakomonisa ekolo bakobapona mbala moko na bayi ekolo banso kasi manso makoleka na bokutu. O ngambo ya bango ba sénateurs ata soki bazali na mandat to etinda ya ekolo , bazali nde bamonisi ba bituka bikobapona.Bakoponama o eteni ya maponomi ya ibale na assemblées provinciales.
Ba députés nationaux mpe sénateurs bakoponama elongo na balandi ba bango babale baye bakokitana bango kolandana na mabongisi masila kosalema soki moko aweyi , to atiki mosala ,soki akoki lisusu kosala mosala te to mpe soki azui etumbu ya libela . Kolandana na mobeko mwa libungutulu, motoba kata nzete libungutulu, libungutulu , motoba ya mia sanza libwa sanza ya misato mobu koto mibale na motoba etali mabongiseli ya maponomi ma kopona mokonzi wa ekolo, ba ntoma ba bana ba ekolo o ekolo mpe o bituka kino o maponomi o ba commune mpe localité, mozali koloba ete ,mandat ya ba députés nationaux mpe ba sénateurs kobanda tango biteni binso bibale bia parlement bindimi kobapesa bokonzi mpe mosala mokosila kaka soki batie parlement ya sika .
Ba députés nationaux mpe sénateurs bakoponama mpo ya kosala mosala na mibu mitano , bakoki mpe kobabakisela mibu misusu mitano soki bayi ekolo basepeli na mosala mwa bango.Tika toyebisa awa likambo lioko lia ntina makasi penza ezali ete mokonzi wa kala ona aponami na bayi ekolo bo esengeli, akotikala sénateur bomoyi na ye mobimba kino na liwa.

” makoki ma ba députés nationaux mpe sénateurs mazali nini ?”

* Ba députés nationaux mpe sénateurs bazali na makoki ma kotambola o etando mobimba ya ekolo mpe kobima o libanda ya kolo bo elingi bango. Bazali na makoki makozua lifuta likobapesa bonsomi mpe lokumu. Manso maye masili kolobama o kati ya mobeko motali misolo. Ba députés nationaux mpe ba sénateurs basengeli na lifuta lia sanza motoba mpo ya kobima to kotika bibonga.
Esengeli boyeba ete,mabongiseli manso mangeli kotiama o bikela motali mobeko moye, elongo na makoki masusu ma ba parlementaires ezuami mpe ebongisami na eteni yoko yoko ya parlement.

“Sika tokoki koyeba tango nini mosala to mandat ya ba députés nationaux mpe ba sénateurs ekosila ?”

* Mosala to mandat ya ba députés nationaux mpe ba sénateurs ekosila soki eleko babapesaki mpo ya mosala esuki, soki moto akufi,soki elingi kolongwa ye meyi to kotika mosala, soki mpe azali komonana te mbala zike na makita ma mosala, soki mpe lisusu bamokangani kolandana mobeko motali maponomi,to mpe andimi kosala mosala molongobani te na mandat ya député to sénateur , soki mpe azui etumbu ya makasi kolandana na mbeba asali, wana mosala mwa ye mokoki kosuka.
Tika toloba mpe ete,ntoma wa bana ba ekolo mpe député national na sénateur eye akolongwa lisanga lia ye lia politique na tango azali na etinda , asengeli mpe kotika mosala mwa kintoma mpe mandat bamopesaki ya ba parlementaire, nzambi azuaki yango kolandana na lisanga lia ye lia politique.

Texte de SAMUEL KATSHAK rnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnE-mail : [email protected] [email protected] Lingala de :rnMicheline Tshwala MupangirnTél: 00243998186793