" Mokonzi wa ekolo akotiama o ebonga lolenge nini sima ya koponama ? "

Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.

” Mokonzi wa ekolo akotiama o ebonga lolenge nini sima ya koponama ? ”

* Mokonzi wa ekolo eye akoponama,akobanda mosala sima ya mikolo zomi mia koyebana biyano bia suka bia maponomi. Wana akobanda mosala mpe akosala mibu mitano kino o suka ya mandat na ye.

” Mokonzi wa ekolo eye akoponama akosala nini yambo ya kobanda mosala mwa ye ? ”

* Molongo mwa kama mibale, tuku mibale na misato mwa mobeko 06 / 006 du 09 mars 2006 motali mabongisi ya boponomi bwa mokonzi wa ekolo, ba ntoma ba bana ba ekolo, o bituka ,bingumba, kino o ba mboka inso, o etando mobimb ya ekolo République Démocratique du Congo ezali kolimbola ete,yambo abada mosala , mokonzi wa ekolo eye aponami nde akati selaka o boso bwa esambiselo enene ya ekolo ekolandelaka mibeko to cour constitutionnelle, na maloba maye:rn « Ngai akotanga kombo naye soki azali mwasi to mobali, naponami kozala mokonzi wa ekolo République Démocratique ya Congo ; na lapi ndayi o boso bwa nzambe mpe ekolo mobimba:rn -na kobatela mpe kokengela mibeko mikokamba ekolo mpe miye mia ekolo,rn -Na kobatela bonsomi bwa ekolo mpe bomoko bwa etando mobimba ya ekolo,rn -Na kobatela bomoko bwa ekolo,rn -Na kotambwisama se mpo ya bozui mbano ya banso mpe kotosa makoki ma bato,rn -Na kopesa bokasi bwa ngai nionso na ntombwa ya bolamu bwa banso mpe kimia,rn -na kokokisa na botosi bo mosali wa bayi ekolo, mosala monene bapesi ngai.»

Tokundola bino ete,mokonzi wa ekolo ye nde moyangeli wa ekolo. Akomonisa ekolo mpe azali elembo ya bomoko bwa ekolo.
Mokonzi wa ekolo akobatela botosi bwa mibeko mikokamba ekolo, na ekambeli ya ye, akoyeba kolandela misala minso mpo mitambola malamu mpe ekolo ekende o boso. Ye nde akobatela bonsomi bwa ekolo mobimba,mpe botosi bwa boyokani na bikolo bia bapaya.
Mokonzi wa ekolo akopona ministre wa yambo kati ya lisanga liye likozala na ba ntoma bayike,sima ya kosolola na lisanga lina. Akosukisa mosala soki ye moko apesi mokanda mwa bolongwi bwa ye na mbula matadi ya ekolo to demission.
Mokonzi wa ekolo akotia mpe o ebonga ya mosala binama bisusu bi ambula matdi,mpe akosukisa mosala mwa bango na bosenga bwa Premier ministre.

Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes CourtesrnTél. : 00243998909787rnExt.:6961rnE-mail : [email protected] [email protected] Micheline TshwalarnJournaliste/Radio Okapi KInshasarnEquipe Electorale.
Ext. : 6961