Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.
” Lolenge nini bakotiama o bibonga binama bia l’assemblée nationale mpe baye ba Sénat ? ”
* Binama bia assemblée nationale to ba ntoma ba bana ba ekolo mpe baye ba Sénat bakokota o mosala mikolo zomi na mitano sima ya bopesi biyano bia maponomi ya ba ntoma ba bana ba ekolo. Molongo mwa kama yoko na zomi na mineyi mwa mobeko likonzi o mobekolo kama ibale tuku mibale na mineyi ezali kolimbola o mobeko mwa libungutulu to mokele motoba,kata ndjete libungutulu ,libungutulu motoba esalemaki mwa libwa sanza ya misato, etali maponomi ya mokonzi wa ekolo mpe ba ntoma ba bana ba ekolo o biteni binso mpe o etando mobimba ya RDC,mozali kolimbola ete,kinama moko moko wa parlement asengeli kosangana na likita likosalema sima ya mikolo zomi na mitano ya boyebi biyano bia maponomi ya ba ntoma ba bana ba ekolo, mpo batia bureau ya bokambi misala mpo ya mwa tango, ekokambema na mpaka to mokolo na mibu kati ya ba ntoma ba bana ba ekolo mpe akosungama na bilenge na mibu babale. Bureau ena, na binama bia yango nde bakondima eleko ya mosala ya ba ntoma ba bana ba ekolo banso, kino bakotia bureau ekosala mosala libela. Bureau meyi nde ezui mosala mwa kokoma mpe kondima mibeko mikokamba o mosala mwa bango.
Toyebisa ete mosala mona nde mosuki se tango bakosukisa maye bakanaki kosala.
” Tokoki koyeba binama bia eteni yoko yoko ya mosala mwa ba ntoma o parlement ? ”
* Eteni yoko yoko ekozala na mokambi to président, mpe balandi baye babale, molobeli, mpe molandi waye, bakisa mpe mozui mituna mpe molandi waye, to questeur bo bakomobengaka na lopoto.Na koponaka binama bia bureau baye bakosala libela o biteni binso bibale bia suku ya ba ntoma, esengeli kokanisa basi bazala mpe na kati. Bureau eye batikaki na mwa tango, ekosukisa mosala mwa yango se o tango eye ba poni binama bia bureau baye bakosala libela.Koponama ya binama bia bureau bakosala libela, ekosalema na polele, moto akozua bilembo biyike koleka nde abimi.Tokundola bino ete parlement nde ekosalaka mibeko mia mbula matadi. Ezali na mosala mwa kokoma mibeko mikokamba misala mia mbula matadi ya ekolo. Kolandana na mobeko mokama mwa mobeko likonzi ya République Démocratique du Congo, Parlement ekopona mibeko, ekolandela maye mbula matdi ekosala,mpe misala minso mia mbula matadi to ba entreprises publiques ,lolenge moko mpe mpo ya établissements mpe services publics.
O ekolo ya biso, Parlement ekozalaka na biteni bibale to bicaméral elingi koloba ezali na suku ibale. Yoko bakobengaka yango chambre basse to mpe Assemblée nationale mosusu bakobengaka yango chambre haute to mpe Sénat. Suku to chambres yoko yoko ezali na misala mia yango, ekambeli na yango mpe misolo mia yango mpo ya kokamba misala.
Binama bia Assemblée nationale bako bengaka bango ba députés nationaux, nzoka nde baye ba Sénat nde bazua kombo ya ba Sénateurs. Tika totia mondelo ete moyangeli to mokambi wa Sénat asengeli kozala moyi RDC wa kobotama mpe makila to kozala na nationalité congolaise.
Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes Courtes 3è HeuresrnTél. : 00243998909787rnExt.: 6961rnE-mail : [email protected] [email protected] Lingala de Micheline TshwalarnJournaliste Equipe électoralernKinshasa.
Tel : +243 0998186793