Fichier audio : téléchargez Flash pour écouter.
” Lolenge nini bobeti ntangwa ya eteni ya mibale ya maponomi ya mokonzi wa ekolo pe ya ba ntoma ya bituka ekosalema ? ”
* Bosengeli koyeba ete, bobwaki mbela ezali ngonga eyaka yambo te maponomi masalema. Na ngonga ena nde m,angomba ma politique pe ba candidats basengeli kolakisa bakanisi na bango na bana mboka po te bapona bango. Kasi bosengeli koyeba te ezali na bikeseni kati ya oyo babengi na lopoto campagne electorale officielle to bobwaki mbela lolenge mibeko milengeli naa lolenge misala miina misalemaka.
Campagne electorale officielle ezali eleko mibeko ya maponomi milengeli po te baweli ebonga baleka na ba radio, ba televisions pe na ba journaux po na kolakisa makanisi na bango po na maye balingi kosala po na kobongisa lobiko ya bana mboka.
Na yango, ba candidats banso basengeli kozala na munites lolenge moko na tango bazali koleka na ba radios pe ba televisions.
Na ekolo ya Congo Democratique, Haute Autorite des Medias nde ezali na mokumba ya kolandela po te bato batosa mibeko miina.
Po na maponomi ya ba deputes ya bituka, Cei epesaki mikolo tuku misato po na campagne officielle ya mapopmomi maana.
Elingi koloba banda mwa tuku mibale na mwambe sanza ya libwa na minuit tee na mwa tuku mibale na sambo sanza ya zomi ya mobu moye na minuit, lolenge mibeko ya maponomi na ekolo ya Congo Democratique misengi. rnCei elengeli te, eteni ya mibale ya maponomi ya mokonzi wa ekolo esalema na mia sanza tuku mibale na libwa sanza ya zomi. Maponomi maana makosalema mbala moko na maye ma ba deputes ya bituka to ba deputes provinciaux. Campagne ya eteni ya mibale ya maponomi ya mokonzi wa ekolo ekosalema na ntaka ya mikolo zomi na mitano, elingi koloba banda mia sanza zomi na misato sanza ya zomi tee na mia sanza tuku mibale na sambo sanza ya zomi na minuit.
Toyebisa te, Campagne ya maponomi ezali pe eleko mangomba ma politique elongo naa ba candidats balukaka kolakisa manaka pe makanisi na bango. Eleko ena elengelami na mibeko ya maponomi te. Kasi ba candidats basengeli kotosa maye mibeko misengi, ndakisa koboya kofinga bato basusu to pe koloba makambo ya songi songi pe koluka mobulu.
Mangomba ma politique masengeli pe kotosa code de bonne conduite yo bandimaki kotia maboko po te maponomi masalema na kimia.
” Ndeko Tony Ntumba, nani moto asengeli kosala campagne mpe lolenge nini campagne yango esengeli kosalema ? ”
* Ya soolo, mibeko ya maponomi mipesi ndingisa na candidat nionso pe na lingomba nionso ya politiki na kosala campagne na eleko bapesi. Article 29 ya mibeko ya maponomi elobi polele te, bato ya mangomba ma politique, elongo naa ba candidats independants bakoki kosala milulu lolenge mibeko misengi.
Milulu miina mikoki kosalema bipayi binso na kati ya ekolo. Kasi yambo, bakambi ya mangomba basengeli kokomela bakambi ya engumba mokanda mokolo moko yambo ete basangana. Na epayi mosusu, bosengeli koyeba te, bakambi ya milulu basengeli kosala manso po te mobulu mozala te na tango bazali kosangana. Na eleko ena bakoki pe kobamba photos pe ba banderoles na bango lolenge mibeko ya Cei misengi. Kasi epekisami kobamba ba photos pe ba banderoles na bifelo ya ba ndako ya leta.
Texte de SAMUEL KATSHAKrnOndes courtesrnTél. : 00243998909787rnE-mail : [email protected] [email protected]
Traduction Lingala de TONY NTUMBA