journal farncais

Na etuka Tshopo minganga batelemisi mosala na bango lelo pe lobi. Lingomba na bango nde ezwi mokano moye. Ezali bongo pona kotelemela pe kopamela ndenge babomi moninga na bango monganaga Placide Mbungi pe boko basali basusu ya mapitalo kuna na etuka.

Na Nord Kivu. Kobika ezalaki pasi makasi lelo na tongo na Beni. Pamba te nioso ezalaki ya kokanga. Kobima te. Koteka pe te. Nioso wana po bayi engumba mingi penza bilenge bakitaki na balabala pe bamatisaki mongongo pona koloba kanda na bango ndenge Beni, Lubero pe Butembo ezali kaka na kimia te te lelo. Posa na bango ezali te bokengi bozonga libela pe lisusu te esika nioso M23 ezali kodondwa ezonga libela na maboko ya leta ya Rdc.

Na Kongo central. Bayangeli pulusu ya etuka balingi lisusu koyoka makambo ya kanyaka to ba pulusu komela masanga na tango ya mosala te. Bayebisi yango ba pulusu lisusu lelo na yoko lisolo Bakonzi basali na ba pulusu ya nzela to roulages ya engumba Matadi pona yango.

 

/sites/default/files/2025-10/13102025-p-l-journallingalaweb-00.mp3