journal francais

Likama ya liwa esili te na Nord Kivu. Lobi loleki ba simba mandoki ya Adf bakotelaki mboka Katanga Mokondo na Lubero tongo tongo pe bayi mboka pene na tuku mibale bakufaki na mobulu wana.

Na etuka Tshopo minganga batelemisi mosala na bango lelo pe lobi. Lingomba na bango nde ezwi mokano moye. Ezali bongo pona kotelemela pe kopamela ndenge babomi moninga na bango monganaga Placide Mbungi pe boko basali basusu ya mapitalo kuna na etuka.

Na Kongo central. Bayangeli pulusu ya etuka balingi lisusu koyoka makambo ya kanyaka to ba pulusu komela masanga na tango ya mosala te. Bayebisi yango ba pulusu lisusu lelo na yoko lisolo Bakonzi basali na ba pulusu ya nzela to roulages ya engumba Matadi pona yango. Pe kaka na lisolo yango ya lelo esengami na pulusu moko moko kokeba pe kotika libela bikela bibe binso bina

 

/sites/default/files/2025-10/14102025-p-l-journallingalamatinweb-00mp3.mp3