Sango ya lelo : 10 mars 2026
- Ministre wa yambo ya RDC azwami o New york…Azwaki maloba o tribune ya Nations- Unie mpo na kotalisa mpasi ya bamama na bilenge basi bazali konyokwama na nse ya bitumba biye ekolo Rwanda ekotisa o Congo Democratique.
- O Mahagi, batambwisi mituka ya pitolo baboyi kosala. Mposa na bango ezali te, bakonzi batalela bango likambo ya bozangi bokengi mpe na matungisi ma ye bazali kokutana na yango o nzela nkati ya Bunia na Kisangani.
- /sites/default/files/2026-03/100326-p-l-journal_lingalade_ce_soir_mardi_-00-web.mp3O Etando Fizi, mokambi wa etando na boko bakonzi ya mboka basengi te mabala mabanda kosalema o nkati bai bituka na ntina ya koluka kovanda lisanga moko na kimya. Wana ezali meko ezwamaki o bosukisi likita linene ya bakumu ona etando.





