journal lingala

Ba ntoma ya ekolo Jacques Djoli, chimene Popipoli pe Grace Neema bakolongwa na lingomba ya bayangeli ndako ya ba ntoma ya Rdc te. Kasi batikali kaka na bibonga na bango na lingomba eye. Ba ntoma balandelaki lifunda ya kolongola bango na bibonga na bango nde baboyi bango balongwa pe ndako ya ba ntoma ngambo naye pe endimaki se bongo.

Misolo ya america ezwi mua talo koleka Franc congolais na biso mikolo miye na ekolo na biso. Bongo na Kasa Oriental pe ezali se bongo. Dolale moko ezalaki motuya ya 2800 fc ekomi sika 2600 fc. Na yango kosombitinya mbongo ekomi kilo. Na pe bato bakomi komilela pona kosomba biloko ya kolia.

Etuka Tshopo ebongosaki poso eleki yoko kelasi pona kosunga tukutuku etambolaka malamu naba nzela. Na Kisangani batambusi tukutuku motango kama mitano bakotaki kelasi yango pe bazwaki certificat. Kasi awa na Kisasa kobanda lelo ba soda na ba pulusu bakobanda kosala mosala elongo pona kolonga ba embouteillages ebele ebele etungisaka na enguma mokonzi.

 

/sites/default/files/2025-09/29092025-p-l-journallingalamatinweb-00.mp3