journal lingala

Etuka Tshopo ezali lisusu na moyangeli te. Ba ntoma ya etuka balongolaki ye na ebonga yango lobi. Kasi ye Paulin Lendongolia Moyangeli oyo balongoli azalaki naye kuna na Tshopo te. Wuta mua mikolo azali naye awa na Kisasa.

Mabota mabale na avenue Maendeleo commune ya Kadutu na Bukavu mazali na pasi makasi lelo pamba te bakufisi na butu eleki ya bango bayi libota na yoko moto ya mbalakaka ezikisi bango o ba ndako na bango. Moto ayebi te ndenge moto yango eyaki. Kasi bato bakufi motango koleka zomi.

Na Ituri mangomba mabundelaka makoki ma bato balobeli pasi boko bayi Nord Kivu pe  Ituri bakobika na ba zamba ya Irumu to Mambassa. Motango na bango balobi ezali koto mibale. Bato baye bakomi kuna po bakokima ba tomboki ya ba Adf baye bakokotisa mobulu ngambo ya Bapiri na Lolwa.

 

/sites/default/files/2025-10/28102025-p-l-journallingalamatinweb-00mp3.mp3