1. Kinshasa : Kelasi ebandi o etando Congo Democratique mobimba. Mpo na mobu moye,, bana pene na millioni ntuku misato na moko, bamikomisi mpo na kotanga, bo elobi ministre ya education Raissa Malu.
2. O Lualaba kimia ezali te na bai etuka mpo na ndenge mboka minei izali vanda na nkati ya bosoto bowulani lokola poison, ikobima na masini ya mosala ya societe Tenke Fungurume Mining. Yoko Commission esangisi mbulamatari na societe mei. ekiti ona mboka mpo na boluka luki.
3. O Kinshasa, bozangi bokengi ekongala makasi o quartier BAT, kuna na commune ya N’sele. Bai quartier bazozela lisalisi lya mbulamatari mpo na kobatela bango o maboko ya badongolo miso, bakokotelaka bato butu butu na ndako na minduki o maboko.







