1. Kananga : Bokono Monkey Pox ekoti o zone ya sante ya Luebo, o Kasai central. Kuna Bazwi bato ntuku mibale na mibale na bokono bwango. Bato basato bakufi na bokono, bo elimboli monganga mokonzi ya zone ya sante ena.
2. Bunia : O Mambassa bozangi bokengi ezo kongala makasi. Ba ADF bakokotelaka bai mboka butu moyi ona etando. Yango ezali kobangisa bozongi bwa kelasi ya bana. Soki meko ezwami makasi te.
3. Kinshasa : Awa o Kinshasa, bato ya Camp Munganga , o commune ya Ngaliema batondi na elikya, zambi misala ya kobongisa tuyau monene ya mayi collecteur mizali kosalema na OVD. Yango ekobasunga kosilisa kpokoso ya mabulu, to erosion eye ezobangisa bango na bobelemi na eleko ya mbula.






