LES TITRES
Molongo mobimba eekokundola lelo loye mokolo ya kobundisa bobola , bitumba kati na bayi mboka , na ndakisa tokolobela bobola bozuami na mboka Muanga o etuka Ituri ….
Na Sud Kivu , epekisami na masuwa mibale kobemboka o etima ya Kivu pe mokumbi ya yoko masuwa a mosusu akangemi na Kalehe , wana mikano ya bakambi o etuka ,pamba te bakolo masuwa bafundami na bobuki meko mizuamaki na mbula matari po ya kobatela bayi mboka na biloko ba bango ….
Na Geneve o ekolo Suisse ministre o matali bitando pe bokengi ya ekolo Rdc Jacquemin Shabani asengaki na mokambi misala ya bakima bitumba o molongo too Hcr ,kolengela booko masolo na bikolo bisato bizuami penepene na yango po ya kozongisa bakima bitumba o bikolo bya bango…
/sites/default/files/2024-10/18102024-p-l-journallingalamatin-00web.mp3