Journal lingala soir

Moyangeli molandi ya Onu akambaka mosala ya kobatela Kimia na molongo asololaki lelo na ba mbanda politik nzike ya Kongo. Ba mbanda politiki yango bazalaki neti Martin Fayulu, Jean Marc Kabund, Franklin Tshamala ya lingomba politik ya Matata Ponyo pe Ntoma wa  ekolo Dominique Munongo ya lingomba ya Moise Katumbi. Na Jean Pierre Lacroix basololaki neti oyo etali boyokani ya Washington pe eye ya Doha.

Ndako mosala ya Onu elandelaka mambi ya makoki ma bato na Kongo kombo Bcnudh eyebisi lelo te na Rdc makoki ma bato motango koleka kama mitano babukaki yango. Nioso wana kaka na sanza ya sambo eleki. Baye babuki yango ezali mingi mingi basimba mandoki banso na kati wana pe ba M23 bazali, ba Wazalendo, mampinga ma ekolo na pe ba pulusu.

Na sango ya biteyelo toyeba te. Boko biteyelo ya Rdc bikomi na kokoso. Pamba te misala ya koluka mbongo nde ekomisi biteyelo yango na lolenge lona. Awa na kisasa bato bakomisi yango bisika ya mombongo. Bongo na Haut Katanga kompani ya makele nde ekotungisa.

 

/sites/default/files/2025-09/04092025-p-l-journallingalasoirweb-00mp3.mp3